|
| 1 |
|
| Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki: |
|
| 2 |
|
| « Kino tango nini okoloba maloba ya boye? Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola. |
|
| 3 |
|
| Mpo na nini komona biso lokola banyama? Boni, tozali nde bazoba na miso na yo? |
|
| 4 |
|
| Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni, basundola mokili to balongola mabanga na bisika na yango likolo na yo? |
|
| 5 |
|
| Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, moto na yango etikaka kopela. |
|
| 6 |
|
| Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka. |
|
| 7 |
|
| Makasi ya matambe na ye esilaka, makanisi na ye moko ekweyisaka ye. |
|
| 8 |
|
| Makolo na ye ekangisaka ye na monyama, bongo abundaka-bundaka kati na madusu na yango. |
|
| 9 |
|
| Motambo ekangaka matambe na ye, mpe singa na yango ekangaka ye makasi. |
|
| 10 |
|
| Singa ya motambo ebombama na se ya mabele mpo na ye, mpe batia motambo na nzela na ye. |
|
| 11 |
|
| Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka. |
|
| 12 |
|
| Nzala esilisaka makasi na ye, mpe pasi ya ndenge na ndenge ezalaka pembeni na ye soki akweyi. |
|
| 13 |
|
| Pasi eliaka poso ya nzoto na ye mpe bokono oyo ebomaka ebebisaka biteni ya nzoto na ye. |
|
| 14 |
|
| Balongolaka kati na ndako na ye biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa. |
|
| 15 |
|
| Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango. |
|
| 16 |
|
| Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele, mpe, na likolo, bitape na ye elembaka. |
|
| 17 |
|
| Bakanisaka ye lisusu te na mokili, kombo na ye etangamaka lisusu te na mabele. |
|
| 18 |
|
| Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili. |
|
| 19 |
|
| Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye, azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi, na esika oyo avandaka. |
|
| 20 |
|
| Bato ya weste bazalaka na somo ya kotala bomoi na ye, mpe bato ya este batondaka na kobanga. |
|
| 21 |
|
| Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka, mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. » |
|
|
|
|