|
| 1 |
|
| Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki: |
|
| 2 |
|
| « Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, nakoki kovanda nye te, pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo. |
|
| 3 |
|
| Nazali koyoka maloba mabe, maloba oyo eyokisi ngai soni! Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa. |
|
| 4 |
|
| Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele, |
|
| 5 |
|
| elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke. |
|
| 6 |
|
| Ata molayi na ye emati kino likolo mpe moto na ye etuti mapata, |
|
| 7 |
|
| akobebisama libela lokola nyei na ye, mpe bato oyo bakomona ye bakoloba: ‹ Azali wapi? › |
|
| 8 |
|
| Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu. |
|
| 9 |
|
| Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te, esika oyo azalaki kovanda ekomona ye lisusu te, |
|
| 10 |
|
| bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki, |
|
| 11 |
|
| mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge ekolala elongo na ye kati na putulu. |
|
| 12 |
|
| Soki mabe ezali sukali na monoko na ye mpe abombi yango na se ya lolemo na ye, |
|
| 13 |
|
| soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, soki abombi yango na se ya minu na ye, |
|
| 14 |
|
| bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye. |
|
| 15 |
|
| Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango; Nzambe akofutisa ye yango. |
|
| 16 |
|
| Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye. |
|
| 17 |
|
| Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale, mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki; |
|
| 18 |
|
| akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye. |
|
| 19 |
|
| Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko. |
|
| 20 |
|
| Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye. |
|
| 21 |
|
| Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te. |
|
| 22 |
|
| Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye. |
|
| 23 |
|
| Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei. |
|
| 24 |
|
| Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende, mbanzi ya bronze ekotobola ye; |
|
| 25 |
|
| soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye elongo na makila ya mbuma-mbuma, somo ekoyela ye. |
|
| 26 |
|
| Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye. |
|
| 27 |
|
| Likolo ekobimisa polele mabe na ye, mabele ekotelemela ye; |
|
| 28 |
|
| mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe. |
|
| 29 |
|
| Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi mpo na moto mabe, libula oyo Nzambe alaki ye. » |
|
|
: |
| 1 | | 2 | | 3 | | 4 | | 5 | | 6 | | 7 | | 8 | | 9 | | 10 | | 11 | | 12 | | 13 | | 14 | | 15 | | 16 | | 17 | | 18 | | 19 | | 20 | | 21 | | 22 | | 23 | | 24 | | 25 | | 26 | | 27 | | 28 | | 29 | 1
1
1 |
|
|---|
|
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/job/020.mp3
42
20