|
| 1 |
|
| Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki: |
|
| 2 |
|
| « Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko. |
|
| 3 |
|
| Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo? |
|
| 4 |
|
| Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo? |
|
| 5 |
|
| Mabe na yo ezali monene te? Masumu na yo eleki ndelo te? |
|
| 6 |
|
| Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu, |
|
| 7 |
|
| ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi, mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei, |
|
| 8 |
|
| atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu; |
|
| 9 |
|
| ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike. |
|
| 10 |
|
| Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo, |
|
| 11 |
|
| molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te, mpe mpela ezipi yo. |
|
| 12 |
|
| Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka! |
|
| 13 |
|
| Nzokande, ozali koloba: ‹ Nzambe ayebi nini? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye? › |
|
| 14 |
|
| Mapata minene ezipi Ye, yango wana azali komona biso te, wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola? |
|
| 15 |
|
| Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala, nzela oyo bato mabe balekelaki? |
|
| 16 |
|
| Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela. |
|
| 17 |
|
| Bazalaki koloba na Nzambe: ‹ Tika biso, biso moko! Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini? › |
|
| 18 |
|
| Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango na biloko ya kitoko. Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe. |
|
| 19 |
|
| Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango mpe bazali kosepela, bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba: |
|
| 20 |
|
| ‹ Solo, banguna na biso babebi, moto ezikisi bomengo na bango. › |
|
| 21 |
|
| Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo. |
|
| 22 |
|
| Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo. |
|
| 23 |
|
| Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo. |
|
| 24 |
|
| Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku; |
|
| 25 |
|
| bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo. |
|
| 26 |
|
| Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe. |
|
| 27 |
|
| Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo. |
|
| 28 |
|
| Makambo oyo okokana, ekosalema, mpe pole ekongenga na nzela na yo. |
|
| 29 |
|
| Soki bato balembi, mpe yo olobi: ‹ Telema! › Nzambe akobikisa bango, |
|
| 30 |
|
| akokangola ata moto oyo asali mabe, akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. » |
|
|
|
|