Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Yobo azongisaki: |
| 2 |
| « Ah! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, ndenge osungi loboko oyo elembi! |
| 3 |
| Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi! |
| 4 |
| Ozwi maloba oyo wapi? Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani? |
| 5 |
| Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna. |
| 6 |
| Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele. |
| 7 |
| Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te, |
| 8 |
| akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te; |
| 9 |
| azipaka kiti ya bokonzi na Ye, atandaka mapata na likolo na yango; |
| 10 |
| akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili. |
| 11 |
| Makonzi ya Lola ezali kolenga mpe ezali kokamwa na pamela na Ye. |
| 12 |
| Na nguya na Ye, apasoli ebale monene; mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni. |
| 13 |
| Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka. |
| 14 |
| Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye? » |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/job/026.mp3
42
26