|
| 1 |
|
| Ezali na esika oyo batimolaka palata, mpe na esika oyo bapetolaka wolo. |
|
| 2 |
|
| Ebende ewutaka na mabele, mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako. |
|
| 3 |
|
| Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi, |
|
| 4 |
|
| atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, adiembelaka mosika ya bato nyonso. |
|
| 5 |
|
| Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango lokola nde moto ezikisi yango. |
|
| 6 |
|
| Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele, mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele. |
|
| 7 |
|
| Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango, miso ya mpongo moko te emoni yango, |
|
| 8 |
|
| nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, mpe nkosi etambola nanu kuna te. |
|
| 9 |
|
| Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi mpe apikolaka ngomba longwa na misisa, |
|
| 10 |
|
| atimolaka nzela kati na mabanga, mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso, |
|
| 11 |
|
| akawusaka mayi ya bibale mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama. |
|
| 12 |
|
| Kasi bakoki komona bwanya wapi? Mayele evandaka wapi? |
|
| 13 |
|
| Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi. |
|
| 14 |
|
| Libulu ya mozindo elobi: « Ezali kati na ngai te; » mpe ebale monene elobi: « Ezali epai na ngai te. » |
|
| 15 |
|
| Bakoki kosomba yango te na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata; |
|
| 16 |
|
| bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri; |
|
| 17 |
|
| wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko. |
|
| 18 |
|
| Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo. |
|
| 19 |
|
| Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto. |
|
| 20 |
|
| Boye, bwanya ewutaka wapi? Mayele evandaka wapi? |
|
| 21 |
|
| Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi, ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo. |
|
| 22 |
|
| Libebi mpe kufa elobi: « Kaka sango na yango nde ekomaki na matoyi na biso. » |
|
| 23 |
|
| Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka. |
|
| 24 |
|
| Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola. |
|
| 25 |
|
| Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi, |
|
| 26 |
|
| tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali, |
|
| 27 |
|
| amonaki bwanya mpe akumisaki yango, andimaki yango mpe amekaki yango. |
|
| 28 |
|
| Bongo alobaki na moto: « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya! Koboya mabe, yango nde mayele! » |
|
|
|
|