|
| 1 |
|
| Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai! |
|
| 2 |
|
| Tala, nafungoli monoko na ngai, maloba na ngai ezali na songe ya lolemo. |
|
| 3 |
|
| Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi. |
|
| 4 |
|
| Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi. |
|
| 5 |
|
| Boye soki okoki, yanola ngai, mibongisa mpo na komekana na ngai. |
|
| 6 |
|
| Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe; ngai mpe nawutaki na putulu. |
|
| 7 |
|
| Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te. |
|
| 8 |
|
| Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo— |
|
| 9 |
|
| ‹ Nazali sembo, nasali masumu te; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. › |
|
| 10 |
|
| Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye. |
|
| 11 |
|
| Akangi makolo na ngai na bibende, azali kononga banzela na ngai nyonso. |
|
| 12 |
|
| Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto. |
|
| 13 |
|
| Mpo na nini ozali kosamba na Ye? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te. |
|
| 14 |
|
| Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu, kasi moto asosolaka yango te. |
|
| 15 |
|
| Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto; |
|
| 16 |
|
| boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba, |
|
| 17 |
|
| mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe mpe kobatela ye na lolendo, |
|
| 18 |
|
| mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te, mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga. |
|
| 19 |
|
| Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye, na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso kati na mikuwa na ye. |
|
| 20 |
|
| Boye, azali kosepela lisusu na lipa te, mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi. |
|
| 21 |
|
| Nzoto na ye ekawuki na pamba, mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi. |
|
| 22 |
|
| Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda, mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa. |
|
| 23 |
|
| Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, kati na ba-anjelu nkoto moko, mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo, |
|
| 24 |
|
| tika ete asalela ye ngolu mpe aloba: ‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa, nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, › |
|
| 25 |
|
| nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe lokola na tango ya bolenge na ye, ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye. |
|
| 26 |
|
| Akosambela Nzambe, akozwa ngolu na miso na Ye, akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo. |
|
| 27 |
|
| Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba: ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te. |
|
| 28 |
|
| Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, mpe nakowumela kati na pole na esengo. › |
|
| 29 |
|
| Nzambe asalaka makambo oyo nyonso epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato, |
|
| 30 |
|
| mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye. |
|
| 31 |
|
| Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai! Nazali na makambo ya koloba na yo. |
|
| 32 |
|
| Kasi soki ozali na likambo ya koloba, yebisa ngai yango, pesa ngai eyano, mpe ngai nakolongisa yo. |
|
| 33 |
|
| Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. » |
|
|
|
|