|
| 1 |
|
| Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka? Osila komona ndenge mboloko ebotaka? |
|
| 2 |
|
| Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi? Oyebi tango oyo ebotaka? |
|
| 3 |
|
| Ekogumbama, ekobota bana na yango mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota. |
|
| 4 |
|
| Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te. |
|
| 5 |
|
| Nani akangoli ane ya zamba? Nani apesi yango bonsomi? |
|
| 6 |
|
| Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda. |
|
| 7 |
|
| Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda. |
|
| 8 |
|
| Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu. |
|
| 9 |
|
| Mpakasa ekoki kondima kosalela yo? Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama? |
|
| 10 |
|
| Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele? |
|
| 11 |
|
| Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene? Okotikela yango mosala na yo? |
|
| 12 |
|
| Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo? |
|
| 13 |
|
| Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi ? |
|
| 14 |
|
| Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele, |
|
| 15 |
|
| kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango. |
|
| 16 |
|
| Enyokolaka bana na yango makasi lokola nde ezali bana na yango te, emonaka na yango motema pasi te lokola nde esali mosala ya mpunda, |
|
| 17 |
|
| pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te. |
|
| 18 |
|
| Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango. |
|
| 19 |
|
| Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi? |
|
| 20 |
|
| Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki? Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo. |
|
| 21 |
|
| Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, esepelaka na makasi na yango mpe ekendaka liboso ya bibundeli. |
|
| 22 |
|
| Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga, |
|
| 23 |
|
| tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga. |
|
| 24 |
|
| Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, evandaka kimia te soki kelelo ebeti. |
|
| 25 |
|
| Soki kelelo ebeti, egangaka: ‹ Ah! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba. |
|
| 26 |
|
| Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude? |
|
| 27 |
|
| Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo? |
|
| 28 |
|
| Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, na esika ya kaka, na songe ya libanga. |
|
| 29 |
|
| Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, miso na yango emonaka na mosika. |
|
| 30 |
|
| Bana na yango emelaka makila. Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. » |
|
|
: |
| 1 | | 2 | | 3 | | 4 | | 5 | | 6 | | 7 | | 8 | | 9 | | 10 | | 11 | | 12 | | 13 | | 14 | | 15 | | 16 | | 17 | | 18 | | 19 | | 20 | | 21 | | 22 | | 23 | | 24 | | 25 | | 26 | | 27 | | 28 | | 29 | | 30 | 1
1
1 |
|
|---|
|
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/job/039.mp3
42
39