|
| 1 |
|
| Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba; soki kaka omoni yango, okweyi na somo. |
|
| 2 |
|
| Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango; boye nani akoki kotelemela ngai? |
|
| 3 |
|
| Nani adefisaki ngai eloko mpo ete nafuta niongo na ye? Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai. |
|
| 4 |
|
| Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela biteni na yango ya nzoto, makasi na yango mpe kitoko ya nzoto na yango. |
|
| 5 |
|
| Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto? Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango? |
|
| 6 |
|
| Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango? Minu na yango etonda na somo. |
|
| 7 |
|
| Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba, ekangama elongo na ezipelo ya mabanga. |
|
| 8 |
|
| Ekangama moko na mosusu, mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te. |
|
| 9 |
|
| Ekangama moko na mosusu, esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te. |
|
| 10 |
|
| Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole; mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo. |
|
| 11 |
|
| Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango. |
|
| 12 |
|
| Milinga ebimaka na zolo na yango lokola na mbeki oyo ezali kotoka to lokola nzungu ya ebende ya moto. |
|
| 13 |
|
| Pema na yango epelisaka makala ya moto, lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango. |
|
| 14 |
|
| Makasi na yango evandi na kingo na yango, mpe somo ebimaka liboso na yango. |
|
| 15 |
|
| Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo, elendisama makasi mpe eninganaka te. |
|
| 16 |
|
| Motema na yango ezali makasi lokola libanga, makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma. |
|
| 17 |
|
| Soki etelemi, bato ya makasi babangaka, mpe somo ekimisaka bango. |
|
| 18 |
|
| Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli, ekosala yango eloko te. |
|
| 19 |
|
| Emonaka ebende lokola lititi, bronze lokola nzete epola. |
|
| 20 |
|
| Mbanzi ekimisaka yango te, mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga ezali lokola poso ya loso mpo na yango. |
|
| 21 |
|
| Makonga ezali lokola matiti mpo na yango, mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike. |
|
| 22 |
|
| Se ya libumu na yango etonda na banzube, etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele. |
|
| 23 |
|
| Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi oyo ezali kotoka na nzungu, ekomisaka ebale monene lokola nzungu oyo batokiselaka malasi. |
|
| 24 |
|
| Engengisaka nzela na sima na yango lokola suki ya pembe likolo ya mayi. |
|
| 25 |
|
| Na mokili, nyama moko te ekokani na yango; mpe ebangaka te. |
|
| 26 |
|
| Ebangaka te kobundisa banyama minene, ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. » |
|
|
|
|