|
| 1 |
|
| Yobo azongisaki: |
|
| 2 |
|
| « Ah! Soki ezalaki na makoki ya komeka kilo ya mawa na ngai, mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo, |
|
| 3 |
|
| nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo. Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo. |
|
| 4 |
|
| Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye. |
|
| 5 |
|
| Boni, ane ya zamba elelaka soki ezali kolia matiti? Ngombe ya mobali elelaka soki ezali kolia bilei na yango? |
|
| 6 |
|
| Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi? Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi? |
|
| 7 |
|
| Makambo oyo nazalaki koboya, yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe. |
|
| 8 |
|
| Ah! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela! |
|
| 9 |
|
| Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto! |
|
| 10 |
|
| Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu. |
|
| 11 |
|
| Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai? |
|
| 12 |
|
| Boni, nazali makasi lokola libanga? Nzoto na ngai ezali ya ebende? |
|
| 13 |
|
| Nazali na nguya ya komisunga awa natikali lisusu na makoki te? |
|
| 14 |
|
| Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. |
|
| 15 |
|
| Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, lokola mayi ya moluka oyo ekawuki. |
|
| 16 |
|
| Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili, mpe mvula ya pembe, epanzanaka, ememaka mpela. |
|
| 17 |
|
| Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka, mpe moluka yango ekawukaka nyonso mpo na molunge makasi. |
|
| 18 |
|
| Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda mpo na kokende na mobembo, ebongoli nzela ya kokende, ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna. |
|
| 19 |
|
| Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, elukaki mayi; masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, etielaki yango motema. |
|
| 20 |
|
| Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa. |
|
| 21 |
|
| Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai, bozali na makoki te ya kosunga ngai; awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino! |
|
| 22 |
|
| Boni, nasila koloba na bino: ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino, |
|
| 23 |
|
| mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe? › |
|
| 24 |
|
| Boteya ngai, bongo nakokanga monoko; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali! |
|
| 25 |
|
| Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini? |
|
| 26 |
|
| Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi? |
|
| 27 |
|
| Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu! |
|
| 28 |
|
| Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai! Boni, nakoki penza kokosa bino, kaka na miso makasi boye? |
|
| 29 |
|
| Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami. |
|
| 30 |
|
| Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai; monoko na ngai ekoki kososola mabe te? |
|
|
|
|