Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli, |
| 2 |
| kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi. |
| 3 |
| Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu. |
| 4 |
| Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka. |
| 5 |
| Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo. |
| 6 |
| Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/001.mp3
150
1