Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, kovanda kimia te! |
| 2 |
| Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo. |
| 3 |
| Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba. |
| 4 |
| Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli. |
| 5 |
| Bazali kozongisela ngai mabe na bolamu, mpe koyina na bolingo. |
| 6 |
| Kaba ye na maboko ya moto mabe! Bimisela ye monguna, na ngambo ya loboko na ye ya mobali! |
| 7 |
| Tika ete bazwa ye lokola moto mabe na tango ya kosamba, mpe libondeli na ye etangama lokola masumu! |
| 8 |
| Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye! |
| 9 |
| Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, mpe tika ete mwasi na ye akoma mwasi akufisa mobali! |
| 10 |
| Tika ete bana na ye batelengana mpe bakoma bisengasenga, tika ete bakende kosenga mosika ya ndako na bango oyo ebukana-bukana! |
| 11 |
| Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye! |
| 12 |
| Tika ete moko te atalisa ye bolingo, tika ete moko te ayokela bana bitike na ye mawa! |
| 13 |
| Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda! |
| 14 |
| Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye! |
| 15 |
| Tika ete Yawe akanisaka masumu yango tango nyonso mpe asala ete babosana bango libela na mokili! |
| 16 |
| Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema; |
| 17 |
| lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye! |
| 18 |
| Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, tika ete ekota kati na ye lokola mayi, mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta! |
| 19 |
| Tika ete elakeli mabe yango elata ye lokola elamba oyo alati, mpe ekangama ye na loketo lokola mokaba mpo na tango nyonso! |
| 20 |
| Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai. |
| 21 |
| Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo. |
| 22 |
| Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai. |
| 23 |
| Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa; bazali kobengana ngai lokola mabanki. |
| 24 |
| Mabolongo na ngai elembi mpo na kokila mingi bilei, nzoto na ngai mpe ebukani mpo ete nakondi makasi. |
| 25 |
| Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito. |
| 26 |
| Yawe, Nzambe na ngai, sunga ngai; bikisa ngai kolanda bolingo na Yo! |
| 27 |
| Tika ete banguna na ngai bayeba ete Yo Yawe nde osalaki bongo. |
| 28 |
| Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo. |
| 29 |
| Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka. |
| 30 |
| Nakosanzola Yawe na mongongo makasi, nakokumisa Ye kati na ebele ya bato. |
| 31 |
| Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu. |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/109.mp3
150
109