Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai: « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke? » |
| 2 |
| Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo. |
| 3 |
| Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini? |
| 4 |
| Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango. |
| 5 |
| Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo, kasi ayinaka makasi moto mabe elongo na moto oyo asepelaka na mobulu. |
| 6 |
| Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango. |
| 7 |
| Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/011.mp3
150
11