Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Bokumisa Yawe! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye. |
| 2 |
| Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama. |
| 3 |
| Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko. |
| 4 |
| Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo. |
| 5 |
| Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo. |
| 6 |
| Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso. |
| 7 |
| Abangaka basango ya mabe te; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe. |
| 8 |
| Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu. |
| 9 |
| Akabelaka babola na motema ya esengo; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te. |
| 10 |
| Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/112.mp3
150
112