Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te; tika ete Isalaele aloba bongo! |
| 2 |
| Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso, |
| 3 |
| mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi. |
| 4 |
| Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso. |
| 5 |
| Mayi makasi elingaki kozindisa biso. |
| 6 |
| Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso! |
| 7 |
| Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke; motambo ekatanaki, mpe tokimaki. |
| 8 |
| Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/124.mp3
150
124