Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba: |
| 2 |
| « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te! » |
| 3 |
| Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo. |
| 4 |
| Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe. |
| 5 |
| Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima! |
| 6 |
| Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango; |
| 7 |
| tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye. |
| 8 |
| Tika ete baleki nzela baloba na bango te: « Tika ete Yawe apambola bino! » Topamboli bino na Kombo na Yawe! |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/129.mp3
150
129