Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi! |
| 2 |
| Nkolo, yoka ngai! Yoka mabondeli na ngai! |
| 3 |
| Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema? |
| 4 |
| Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo. |
| 5 |
| Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya; nazali kozela maloba na Ye. |
| 6 |
| Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo. |
| 7 |
| Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye. |
| 8 |
| Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso. |
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/130.mp3
150
130