Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai. |
| 2 |
| Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele. |
| 3 |
| Isalaele, tia elikya kati na Yawe kobanda sik’oyo mpe libela na libela. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/131.mp3
150
131