×

Mokanda na Bomoi 2020

Banzembo 137

1
Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.
2
Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango.
3
Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba: « Boyembela biso banzembo ya Siona! »
4
Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya?
5
Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba!
6
Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai!
7
Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa; bazalaki koganga: « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango! »
8
Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso!
9
Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga!
Lingala Bible 2020
Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi 2002, 2020 Biblica, Inc. Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba. Lingala Contemporary Bible™ 2002, 2020 by Biblica, Inc
:
Save Notes