Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba! |
| 2 |
| Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai. |
| 3 |
| Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye? Moto nde nani mpo ete okanisaka ye? |
| 4 |
| Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka. |
| 5 |
| Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga! |
| 6 |
| Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai; bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela. |
| 7 |
| Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya |
| 8 |
| oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta. |
| 9 |
| Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika, nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi. |
| 10 |
| Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga, obikisaka Davidi, mosali na Yo, liboso ya mopanga oyo ebomaka. |
| 11 |
| Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta. |
| 12 |
| Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi. |
| 13 |
| Bibombelo na biso etondi na biloko ya ndenge na ndenge; bameme na biso ezali kobotana na minkoko, na bankoto zomi kati na bitonga na biso; |
| 14 |
| bangombe na biso ezali minene; likama ezali te, zemi ezali kosopana te, mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana na bisika na biso. |
| 15 |
| Esengo na bato oyo batondisami na bolamu ya boye! Esengo na bato oyo Yawe azali Nzambe na bango! |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/144.mp3
150
144