×

Mokanda na Bomoi 2020

Banzembo 15

1
Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule?
2
Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye;
3
oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te;
4
asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te;
5
asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.
Lingala Bible 2020
Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi 2002, 2020 Biblica, Inc. Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba. Lingala Contemporary Bible™ 2002, 2020 by Biblica, Inc
:
Save Notes