Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango. |
| 2 |
| Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka. |
| 3 |
| Nani akokoka komata ngomba ya Yawe? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule? |
| 4 |
| Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te. |
| 5 |
| Yawe akopambola ye; mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo. |
| 6 |
| Ndenge wana nde ezali, ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo, ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi. |
| 7 |
| Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota! |
| 8 |
| Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Elombe ya nguya; Yawe, Elombe ya bitumba. |
| 9 |
| Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota! |
| 10 |
| Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo! |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/024.mp3
150
24