Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo. |
| 2 |
| Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai. |
| 3 |
| Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono. |
| 4 |
| Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu. |
| 5 |
| Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule. |
| 6 |
| Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka mpo na mwa tango moke, kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko; kolela ekoki kowumela kino na pokwa, kasi kosepela ekokota na tongo. |
| 7 |
| Tango nazalaki na kimia, nalobaki: « Nakotikala kokweya te. » |
| 8 |
| Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya. |
| 9 |
| Yawe, nabelelaki Yo; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi: |
| 10 |
| « Litomba nini ezali soki nakufi, soki nakiti na libulu? Boni, putulu ekokumisa Yo? Boni, ekosakola boyengebene na Yo? |
| 11 |
| Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu; Yawe, zala lisungi na ngai. » |
| 12 |
| Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo, |
| 13 |
| mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo, kasi navanda nye te. Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo libela na libela. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/030.mp3
150
30