|
| 1 |
|
| Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki. |
|
| 2 |
|
| Nakopambola Yawe tango nyonso, nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai. |
|
| 3 |
|
| Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela! |
|
| 4 |
|
| Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso. |
|
| 5 |
|
| Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso. |
|
| 6 |
|
| Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te. |
|
| 7 |
|
| Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye; abikisaki ye na pasi na ye nyonso. |
|
| 8 |
|
| Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango. |
|
| 9 |
|
| Bomeka elengi mpe botala ndenge nini Yawe azali malamu; Esengo na moto oyo azwaka Yawe lokola ebombamelo na ye! |
|
| 10 |
|
| Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te. |
|
| 11 |
|
| Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko. |
|
| 12 |
|
| Bana na ngai, boya, boyoka ngai; Nakolakisa bino kotosa Yawe. |
|
| 13 |
|
| Nani asepelaka na bomoi? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo? |
|
| 14 |
|
| Batela lolemo na yo mosika na mabe, mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te. |
|
| 15 |
|
| Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango. |
|
| 16 |
|
| Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango; |
|
| 17 |
|
| kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili. |
|
| 18 |
|
| Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso. |
|
| 19 |
|
| Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango. |
|
| 20 |
|
| Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso, |
|
| 21 |
|
| abatelaka mikuwa na ye nyonso mpo ete moko te kati na yango ebukana. |
|
| 22 |
|
| Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu. |
|
| 23 |
|
| Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye; mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te. |
|
|
|
|