|
| 1 |
|
| Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te; |
|
| 2 |
|
| pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti. |
|
| 3 |
|
| Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia. |
|
| 4 |
|
| Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi, mpe akokokisela yo posa ya motema na yo. |
|
| 5 |
|
| Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala: |
|
| 6 |
|
| akongengisa bosembo na yo lokola pole, makoki na yo lokola moyi ya midi. |
|
| 7 |
|
| Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe. |
|
| 8 |
|
| Boya kanda mpe kosilika te; kotomboka te, noki te okosala mabe. |
|
| 9 |
|
| Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango. |
|
| 10 |
|
| Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te; ata oluki ye, okomona ye te. |
|
| 11 |
|
| Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi. |
|
| 12 |
|
| Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango. |
|
| 13 |
|
| Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema. |
|
| 14 |
|
| Bato mabe babimisi mipanga mpe babongisi batolotolo mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela, mpo na koboma bato oyo batambolaka alima. |
|
| 15 |
|
| Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana. |
|
| 16 |
|
| Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe, |
|
| 17 |
|
| pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo. |
|
| 18 |
|
| Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela, mpe libula na bango ekowumela mpo na seko. |
|
| 19 |
|
| Na tango ya pasi, bakokawuka te; na mikolo ya nzala, bakozala na bilei ebele. |
|
| 20 |
|
| Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga. |
|
| 21 |
|
| Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka. |
|
| 22 |
|
| Bato oyo Yawe apambolaka bakozwa mokili lokola libula na bango, kasi ba-oyo alakelaka mabe bakolimwa. |
|
| 23 |
|
| Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye; |
|
| 24 |
|
| ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko. |
|
| 25 |
|
| Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange, namoni nanu te moto ya sembo kosundolama to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei. |
|
| 26 |
|
| Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli. |
|
| 27 |
|
| Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, okovanda na mokili mpo na libela; |
|
| 28 |
|
| pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa. |
|
| 29 |
|
| Bato ya sembo bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakovanda kuna seko na seko. |
|
| 30 |
|
| Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo. |
|
| 31 |
|
| Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye, makolo na ye ebetaka libaku te. |
|
| 32 |
|
| Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye, |
|
| 33 |
|
| kasi Yawe akosundola moto ya sembo te kati na maboko ya moto mabe, mpe akokweyisa ye te na kosambisama. |
|
| 34 |
|
| Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa. |
|
| 35 |
|
| Namonaki moto mabe mpe na kanza kokoma na nguya mpe kofuluka lokola nzete oyo ezali kokola na mabele na yango, |
|
| 36 |
|
| kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te. |
|
| 37 |
|
| Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia. |
|
| 38 |
|
| Kasi batomboki bakobebisama, tango oyo ezali koya ezali te mpo na bato mabe. |
|
| 39 |
|
| Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango, oyo batonga makasi. |
|
| 40 |
|
| Yawe asungaka mpe akangolaka bango, akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe mpe abikisaka bango, pamba te babombamaka kati na Ye. |
|
|
|
|