Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli: Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.
Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.
Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.
Alati bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, mpe bamemi ye epai ya mokonzi. Bamemi mpe balingami na ye epai na yo, bilenge basi oyo batambolaka elongo na ye.