Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. |
| 2 |
| Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso. |
| 3 |
| Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba. |
| 4 |
| Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso. |
| 5 |
| Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye. |
| 6 |
| Nzambe amataki kati na koganga ya esengo; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo. |
| 7 |
| Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye. |
| 8 |
| Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye. |
| 9 |
| Nzambe akonzaka bikolo nyonso; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule. |
| 10 |
| Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe; atombwama makasi. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/047.mp3
150
47