Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya bana ya Kore. |
| 2 |
| Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule. |
| 3 |
| Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene. |
| 4 |
| Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi. |
| 5 |
| Pamba te bakonzi basanganaki, batambolaki nzela moko. |
| 6 |
| Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo. |
| 7 |
| Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota |
| 8 |
| to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi. |
| 9 |
| Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso; Nzambe alendisaka yango seko na seko. |
| 10 |
| Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo. |
| 11 |
| Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo. |
| 12 |
| Ngomba ya Siona ezali kosepela, bamboka ya Yuda etondi na esengo mpo na mikano na Yo. |
| 13 |
| Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi. |
| 14 |
| Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima. |
| 15 |
| Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso seko na seko mpe libela na libela; akotambolisa biso, ezala kino na kufa. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/048.mp3
150
48