Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati. |
| 2 |
| Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso. |
| 3 |
| Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele. |
| 4 |
| Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo. |
| 5 |
| Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini? |
| 6 |
| Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso; mabongisi na bango nyonso ezalaka mpo na kosala ngai mabe. |
| 7 |
| Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe. |
| 8 |
| Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo! |
| 9 |
| Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli. |
| 10 |
| Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai. |
| 11 |
| Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye, |
| 12 |
| pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini? |
| 13 |
| Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi. |
| 14 |
| Pamba te okangoli ngai na kufa mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te, mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe kati na pole ya bomoi. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/056.mp3
150
56