Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. |
| 2 |
| Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo. |
| 3 |
| Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi. |
| 4 |
| Molimo na ngai ezali kotungisama makasi; bongo Yo, Yawe, kino tango nini? |
| 5 |
| Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo. |
| 6 |
| Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo? |
| 7 |
| Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka. |
| 8 |
| Miso na ngai ebebi mpo na mawa; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai. |
| 9 |
| Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai, pamba te Yawe ayoki kolela na ngai. |
| 10 |
| Yawe ayanoli mabondeli na ngai mpe ayambi losambo na ngai. |
| 11 |
| Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni, mpe somo monene ekokanga bango; bakozonga na sima mpe bakoyoka mbala moko soni. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/006.mp3
150
6