Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. |
| 2 |
| Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai. |
| 3 |
| Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko. |
| 4 |
| Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai. |
| 5 |
| Posa ya motema na ngai ezali: kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo. |
| 6 |
| Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo. |
| 7 |
| Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi; tika ete awumela na bomoi. |
| 8 |
| Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye. |
| 9 |
| Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/061.mp3
150
61