Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda. |
| 2 |
| Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi. |
| 3 |
| Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo. |
| 4 |
| Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo. |
| 5 |
| Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo. |
| 6 |
| Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo. |
| 7 |
| Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu; |
| 8 |
| pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo. |
| 9 |
| Nakangami na Yo; loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi. |
| 10 |
| Bato oyo balukaka koboma ngai bakozinda na mabele |
| 11 |
| Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba. |
| 12 |
| Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe; moto nyonso oyo alapaka ndayi na Kombo ya Nzambe akomikumisa mpo na yango, pamba te minoko ya bakosi ekokangama. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/063.mp3
150
63