|
| 1 |
|
| Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto. |
|
| 2 |
|
| Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya, |
|
| 3 |
|
| pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe. |
|
| 4 |
|
| Kino na kufa na bango, bazalaka na mitungisi te, nzoto na bango ezalaka sembesembe. |
|
| 5 |
|
| Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka; babelaka te bokono oyo ezwaka bato. |
|
| 6 |
|
| Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango. |
|
| 7 |
|
| Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe; |
|
| 8 |
|
| batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko. |
|
| 9 |
|
| Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili. |
|
| 10 |
|
| Yango wana bato balandaka bango mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi. |
|
| 11 |
|
| Balobaka: « Nzambe akoyeba ndenge nini? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi? » |
|
| 12 |
|
| Tala ndenge bato mabe bazalaka: tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata. |
|
| 13 |
|
| Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te! |
|
| 14 |
|
| Mikolo nyonso, nanyokwamaka; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu. |
|
| 15 |
|
| Soki nalobi: « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo. |
|
| 16 |
|
| Tango nakanisaki mpo na koluka kososola, nayokaki pasi na motema |
|
| 17 |
|
| kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka. |
|
| 18 |
|
| Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi. |
|
| 19 |
|
| Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango! |
|
| 20 |
|
| Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka. |
|
| 21 |
|
| Tango motema na ngai ezalaki kotomboka mpe molimo na ngai emitungisaki, |
|
| 22 |
|
| nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo. |
|
| 23 |
|
| Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali. |
|
| 24 |
|
| Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo. |
|
| 25 |
|
| Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te? |
|
| 26 |
|
| Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso. |
|
| 27 |
|
| Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te. |
|
| 28 |
|
| Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso. |
|
|
|
|