Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. |
| 2 |
| Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu, ozongisaki bato ya Jakobi, oyo bazalaki na bowumbu, |
| 3 |
| olimbisaki mabe ya bato na Yo mpe olongolaki masumu na bango nyonso. |
| 4 |
| Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo. |
| 5 |
| Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso! Longola kanda na Yo na tina na biso! |
| 6 |
| Boni, okosilikela biso penza mpo na libela? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso? |
| 7 |
| Okozongisela biso lisusu bomoi te mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo? |
| 8 |
| Yawe, talisa biso bolingo na Yo, mpe pesa biso lobiko na Yo! |
| 9 |
| Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango. |
| 10 |
| Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso. |
| 11 |
| Bolingo mpe boyengebene ekutanaka, bosembo mpe kimia eyambanaka. |
| 12 |
| Bosolo ebotaka wuta na mabele, mpe bosembo etalaka wuta na likolo. |
| 13 |
| Ye moko Yawe akopesa esengo, mpe mabele na biso ekobota bambuma. |
| 14 |
| Bosembo etambolaka liboso na Ye mpe elakisaka nzela oyo ekolekela. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/085.mp3
150
85