Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. |
| 2 |
| Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! » |
| 3 |
| Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te. |
| 4 |
| Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende. |
| 5 |
| Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi, |
| 6 |
| bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi. |
| 7 |
| Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te. |
| 8 |
| Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango. |
| 9 |
| Soki otatoli: « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo, |
| 10 |
| mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo; |
| 11 |
| pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso. |
| 12 |
| Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te; |
| 13 |
| okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona. |
| 14 |
| Lokola akangami na ngai, nakokangola ye; lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye. |
| 15 |
| Soki abeleli ngai, nakoyanola ye; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu. |
| 16 |
| Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/091.mp3
150
91