Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba. |
| 2 |
| Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo! |
| 3 |
| Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu, |
| 4 |
| na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze! |
| 5 |
| Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo. |
| 6 |
| Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo! |
| 7 |
| Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te. |
| 8 |
| Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela. |
| 9 |
| Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela. |
| 10 |
| Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa. |
| 11 |
| Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika. |
| 12 |
| Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe. |
| 13 |
| Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani. |
| 14 |
| Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso. |
| 15 |
| Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko, |
| 16 |
| basakolaka: « Yawe azali alima, azali Libanga na biso; kati na Ye, mabe ezali te! » |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/092.mp3
150
92