×

Mokanda na Bomoi 2020

Banzembo 95

1
Boya, toganga na esengo mpo na Yawe! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso!
2
Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.
3
Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.
4
Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.
5
Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye.
6
Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso!
7
Pamba te azali Nzambe na biso; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
8
« boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe
9
epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.
10
Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki: ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›
11
Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › »
Lingala Bible 2020
Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi 2002, 2020 Biblica, Inc. Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba. Lingala Contemporary Bible™ 2002, 2020 by Biblica, Inc
:
Save Notes