Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Boyembela Yawe nzembo ya sika! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe! |
| 2 |
| Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo! |
| 3 |
| Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso. |
| 4 |
| Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso. |
| 5 |
| Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo. |
| 6 |
| Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule. |
| 7 |
| Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye! |
| 8 |
| Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye! |
| 9 |
| Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye! |
| 10 |
| Boloba kati na mabota: « Yawe azali Mokonzi! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. » |
| 11 |
| Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito! |
| 12 |
| Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso oyo ezali kati na yango esepela, mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga na esengo |
| 13 |
| liboso ya Yawe, pamba te azali koya! Solo, azali koya kosambisa mabele; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/096.mp3
150
96