Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Yawe azali kokonza; tika ete bato balenga! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe; tika ete mabele eningana! |
| 2 |
| Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso. |
| 3 |
| Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama; ezali bule! |
| 4 |
| Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi. |
| 5 |
| Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu. |
| 6 |
| Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango. |
| 7 |
| Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango. |
| 8 |
| Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango. Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka atako opesaki bango etumbu mpo na misala na bango ya mabe. |
| 9 |
| Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule. |
| Save Notes |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/psalms/099.mp3
150
99