|
| 1 |
|
| Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe. |
|
| 2 |
|
| Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema. |
|
| 3 |
|
| Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama. |
|
| 4 |
|
| Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi. |
|
| 5 |
|
| Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe; solo, akozanga te kozwa etumbu. |
|
| 6 |
|
| Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe. |
|
| 7 |
|
| Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye. |
|
| 8 |
|
| Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe. |
|
| 9 |
|
| Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te. |
|
| 10 |
|
| Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe, ekweyaka te kati na kosambisama. |
|
| 11 |
|
| Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye. |
|
| 12 |
|
| Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo. |
|
| 13 |
|
| Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu. |
|
| 14 |
|
| Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango. |
|
| 15 |
|
| Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga, elingi koloba: bomoi. Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka. |
|
| 16 |
|
| Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata. |
|
| 17 |
|
| Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye. |
|
| 18 |
|
| Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama. |
|
| 19 |
|
| Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo. |
|
| 20 |
|
| Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe. |
|
| 21 |
|
| Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi. |
|
| 22 |
|
| Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba. |
|
| 23 |
|
| Motema ya moto ya bwanya ekomisaka monoko na ye mayele, mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi. |
|
| 24 |
|
| Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa. |
|
| 25 |
|
| Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa. |
|
| 26 |
|
| Nzala etindaka mosali ete asala mosala, monoko na ye etindikaka ye na mosala. |
|
| 27 |
|
| Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka. |
|
| 28 |
|
| Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga. |
|
| 29 |
|
| Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe. |
|
| 30 |
|
| Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu. |
|
| 31 |
|
| Suki ya pembe ezali motole ya nkembo; bazwaka yango na nzela ya bosembo. |
|
| 32 |
|
| Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba. |
|
| 33 |
|
| Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe. |
|
|
: |
| 1 | | 2 | | 3 | | 4 | | 5 | | 6 | | 7 | | 8 | | 9 | | 10 | | 11 | | 12 | | 13 | | 14 | | 15 | | 16 | | 17 | | 18 | | 19 | | 20 | | 21 | | 22 | | 23 | | 24 | | 25 | | 26 | | 27 | | 28 | | 29 | | 30 | | 31 | | 32 | | 33 | 1
1
1 |
|
|---|
|
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/proverbs/016.mp3
31
16