|
| 1 |
|
| Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi, tala malamu moto oyo azali liboso na yo. |
|
| 2 |
|
| Tia mbeli na mongongo na yo soki ozalaka lokoso. |
|
| 3 |
|
| Kolula te bilei na ye ya kitoko, pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo. |
|
| 4 |
|
| Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango. |
|
| 5 |
|
| Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo. |
|
| 6 |
|
| Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe mpe kolula te bilei na ye ya kitoko, |
|
| 7 |
|
| pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka: « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te. |
|
| 8 |
|
| Okosanza eteni oyo oliaki, mpe maloba na yo ya kitoko ekokende pamba. |
|
| 9 |
|
| Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo. |
|
| 10 |
|
| Kozongisa te na sima mondelo ya kala mpe kokota te na bilanga ya bana bitike, |
|
| 11 |
|
| pamba te Molobeli na bango azalaka makasi, akozwa makambo na bango na maboko mpo na kotelemela yo. |
|
| 12 |
|
| Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko, mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi! |
|
| 13 |
|
| Kozangisa te kopesa mwana etumbu; soki obeti ye fimbu, akokufa te. |
|
| 14 |
|
| Na kobeta ye fimbu, okokangola molimo na ye na lifelo. |
|
| 15 |
|
| Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekozala na esengo. |
|
| 16 |
|
| Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo, soki bibebu na yo elobi makambo ya sembo. |
|
| 17 |
|
| Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe; |
|
| 18 |
|
| pamba te suka na yo ekozala solo malamu mpe elikya na yo ekozala ya pamba te. |
|
| 19 |
|
| Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo. |
|
| 20 |
|
| Kozala esika moko te na balangwi masanga to na bato ya lokoso, |
|
| 21 |
|
| pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola, mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka. |
|
| 22 |
|
| Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni. |
|
| 23 |
|
| Luka bosolo, kasi koteka yango te; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele. |
|
| 24 |
|
| Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi, mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye. |
|
| 25 |
|
| Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo! |
|
| 26 |
|
| Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai! |
|
| 27 |
|
| Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene, mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo. |
|
| 28 |
|
| Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi mpe akomisaka mibali bazoba koleka. |
|
| 29 |
|
| Mpo na nani: « Ah ngai, mawa! » Mpo na nani: « Eh! » Mpo na nani koswanaswana? Mpo na nani kolelalela? Mpo na nani kowelana ezanga tina? Mpo na nani kotelisa miso? |
|
| 30 |
|
| Mpo na bato oyo bawumelaka liboso ya masanga ya vino, mpo na bato oyo bamelaka masanga ya makasi. |
|
| 31 |
|
| Kotalaka te masanga ya vino tango ezali motane, tango ezali kongala kati na kopo mpe kokita na pete na mongongo. |
|
| 32 |
|
| Na suka na yango, ekoswa yo lokola nyoka mpe ekotia yo minu lokola etupa. |
|
| 33 |
|
| Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba. |
|
| 34 |
|
| Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene, mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi. |
|
| 35 |
|
| Okoloba: « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te! Tango nini nakolamuka? Nakozongela lisusu komela vino. » |
|
|
: |
| 1 | | 2 | | 3 | | 4 | | 5 | | 6 | | 7 | | 8 | | 9 | | 10 | | 11 | | 12 | | 13 | | 14 | | 15 | | 16 | | 17 | | 18 | | 19 | | 20 | | 21 | | 22 | | 23 | | 24 | | 25 | | 26 | | 27 | | 28 | | 29 | | 30 | | 31 | | 32 | | 33 | | 34 | | 35 | 1
1
1 |
|
|---|
|
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/proverbs/023.mp3
31
23