Mokanda na Bomoi 2020
|
| 1 |
| Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya, |
| 2 |
| omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo. |
| 3 |
| Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye, |
| 4 |
| kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba; |
| 5 |
| mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke. |
| 6 |
| Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya! |
| 7 |
| Yango ezalaka na mokambi te, mokengeli te to mokonzi te; |
| 8 |
| ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi, ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma. |
| 9 |
| Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo? |
| 10 |
| Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala |
| 11 |
| mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi. |
| 12 |
| Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe: |
| 13 |
| Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi; |
| 14 |
| azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele. |
| 15 |
| Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te. |
| 16 |
| Yawe ayinaka makambo wana motoba; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye: |
| 17 |
| Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te, |
| 18 |
| motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe, |
| 19 |
| motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko. |
| 20 |
| Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo. |
| 21 |
| Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo. |
| 22 |
| Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka. |
| 23 |
| Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi, |
| 24 |
| mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya. |
| 25 |
| Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo. |
| 26 |
| Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya. |
| 27 |
| Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te? |
| 28 |
| Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te? |
| 29 |
| Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu. |
| 30 |
| Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia. |
| 31 |
| Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye. |
| 32 |
| Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma; |
| 33 |
| akobuka lokola mbuma: minyoko mpe kosambwa; bongo soni na ye ekosila te. |
| 34 |
| Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe; |
| 35 |
| akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado. |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/proverbs/006.mp3
31
6