|
| 1 |
|
| Boni, Bwanya azali kobelela te? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te? |
|
| 2 |
|
| Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana, |
|
| 3 |
|
| azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba: |
|
| 4 |
|
| « Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato! |
|
| 5 |
|
| Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli! Bino bazoba, bokoma mayele! |
|
| 6 |
|
| Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo. |
|
| 7 |
|
| Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe. |
|
| 8 |
|
| Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe; |
|
| 9 |
|
| nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli. |
|
| 10 |
|
| Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto, |
|
| 11 |
|
| pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango. |
|
| 12 |
|
| Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli. |
|
| 13 |
|
| Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta. |
|
| 14 |
|
| Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi. |
|
| 15 |
|
| Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo; |
|
| 16 |
|
| ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka. |
|
| 17 |
|
| Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai. |
|
| 18 |
|
| Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai. |
|
| 19 |
|
| Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko. |
|
| 20 |
|
| Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene, |
|
| 21 |
|
| mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango. |
|
| 22 |
|
| Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala; |
|
| 23 |
|
| aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te. |
|
| 24 |
|
| Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te, |
|
| 25 |
|
| liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango, |
|
| 26 |
|
| tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili. |
|
| 27 |
|
| Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo, |
|
| 28 |
|
| tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima, |
|
| 29 |
|
| tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele; |
|
| 30 |
|
| nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye; |
|
| 31 |
|
| nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato. |
|
| 32 |
|
| Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai: Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai! |
|
| 33 |
|
| Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te! |
|
| 34 |
|
| Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai! |
|
| 35 |
|
| Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe. |
|
| 36 |
|
| Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko: moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. » |
|
|
|
|