|
| 1 |
|
| Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo; |
|
| 2 |
|
| abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino mpe, na sima, atandi mesa. |
|
| 3 |
|
| Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba: |
|
| 4 |
|
| « Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli: |
|
| 5 |
|
| « Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli, |
|
| 6 |
|
| botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. » |
|
| 7 |
|
| Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo. |
|
| 8 |
|
| Kopamela motioli te, noki te akoyina yo; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo. |
|
| 9 |
|
| Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye. |
|
| 10 |
|
| Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele. |
|
| 11 |
|
| Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama. |
|
| 12 |
|
| Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi. |
|
| 13 |
|
| Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele, |
|
| 14 |
|
| avandaka na ekuke ya ndako na ye, atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba, |
|
| 15 |
|
| mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango. |
|
| 16 |
|
| Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli: |
|
| 17 |
|
| « Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. » |
|
| 18 |
|
| Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi. |
|
|
|
|