Boye, nakanisaki mingi na makambo oyo nyonso mpe namonaki ete, ezala moto ya sembo, moto ya bwanya elongo na makambo nyonso oyo basalaka, bazali na maboko ya Nzambe; kasi moko te ayebaka soki bolingo to koyina ezelaka ye.
Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi: bato nyonso basukaka kaka ndenge moko; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
Bolingo na bango, koyina na bango mpe baposa na bango esila kolimwa; bakozwa lisusu litomba ata moko te kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi.
Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi: mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.
Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka: ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango.