Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo!
Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.
mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge: soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.
Azali nani, ye oyo azali koluka koteya? Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele?
Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.
Bozali koloba: « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. »
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.
Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te; tango likama ya makasi ekokomela bino, ekobebisa bino penza nye.
Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.
Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.
Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
Sima na kobongisa esika ya kolona, boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini? Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi, mpe orje, na esika oyo ekoki; mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye?
Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli to bapine ya shar mpo na kobuka kumini; basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini.
Esengeli konika ble mpo na kosala mapa; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.