Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
« Kende koloba na Ezekiasi: ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi: ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.
Namilobelaki: « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo!
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.
Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo, kufa ekoki kosanzola Yo te; bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te.