|
| 1 |
|
| Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso! Tala mpe mona soni na biso! |
|
| 2 |
|
| Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu. |
|
| 3 |
|
| Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali! |
|
| 4 |
|
| Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso! |
|
| 5 |
|
| Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia. |
|
| 6 |
|
| Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei. |
|
| 7 |
|
| Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango. |
|
| 8 |
|
| Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango. |
|
| 9 |
|
| Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe. |
|
| 10 |
|
| Poso ya nzoto na biso ekomi moto lokola nde balekisi yango na mbabola, pamba te nzala ezali kotumba biso makasi. |
|
| 11 |
|
| Basambwisi basi kati na Siona, mpe bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te kati na bingumba ya Yuda. |
|
| 12 |
|
| Badiembiki bakalaka, na maboko na bango; mpe bapesi bakambi lokumu te. |
|
| 13 |
|
| Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni. |
|
| 14 |
|
| Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule. |
|
| 15 |
|
| Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga. |
|
| 16 |
|
| Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu! |
|
| 17 |
|
| Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili, |
|
| 18 |
|
| ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna. |
|
| 19 |
|
| Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. |
|
| 20 |
|
| Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso? Mpo na nini osundola biso tango molayi? |
|
| 21 |
|
| Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo; mpe tokozonga penza! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala! |
|
| 22 |
|
| Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo? |
|
|
|
|