Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Soki amemi likabo ya farine batumba na fulu ya moto, likabo yango esengeli kozala ya gato oyo ezanga levire, oyo basangisa na mafuta to ya mikate oyo ezanga levire mpe bapakola mafuta na likolo na yango.
Nganga-Nzambe akolongola na makabo ya mbuma eteni oyo esengeli kobonzama lokola ekaniseli mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Likabo moko te ya mbuma, oyo bokomemela Yawe ekozala na levire, pamba te bokotumba te levire to mafuta ya nzoyi lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Okotia mungwa na makabo na yo nyonso ya bambuma mpe okobosana te kotia mungwa na likabo na yo ya bambuma, pamba te ezali elembo ya boyokani oyo Nzambe na yo asalaki. Okotia mungwa na makabo na yo nyonso.