Nakotelema na esika na ngai ya kokengela, nakotelema ngai moko na likolo ya mir, nakosenzela mpo na komona makambo oyo akoyebisa ngai mpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.
Solo, masanga ya vino ekosaka; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye.
Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola: « Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi mpe akolisaka bomengo na ye na kobotola bato biloko na makasi! » Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini?
Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.
Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.
Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete: « Telema! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi: « Lamuka! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.