Mokanda na Bomoi 2002
|
| 1 |
| Oyo ezali bakombo ya bankoko ya Yesu Kristo, mwana ya David, mwana ya Abraham: |
| 2 |
| Abraham abotaki Izaki; Izaki abotaki Zakobi; mpe Zakobi abotaki Yudana bandeko na ye. |
| 3 |
| Yuda na mwasi na ye Tamare babotaki Farezi mpe Zara; Fareziabotaki Esromi; mpe Esromi abotaki Arami. |
| 4 |
| Arami abotaki Aminadabi; Aminadabi abotaki Nasoni; mpe Nasoni abotaki Salmon; |
| 5 |
| Salmon na mwasi na ye Rabi babotaki Bowazi; mpe Bowasi na mwasi na ye Ruti babotaki Obedi. |
| 6 |
| Obedi abotaki Isayi; Isayi abotaki Mokonzi David; mpe Mokonzi David na mwasi oyo Uri atikaki, babotaki Salomon. |
| 7 |
| Salomon abotaki Robowami; Robowami abotaki Abia; mpe Abia abotaki Asa; |
| 8 |
| Asa abotaki Zozafati; Zozafati abotaki Zorami; mpe Zorami abotaki Oziasi. |
| 9 |
| Oziasi abotaki Zowatami; Zowatami abotaki Akazi; mpe Akazi abotaki Ezekiasi. |
| 10 |
| Ezekiasi abotaki Manase; Manase abotaki Amoni; mpe Amoni abotaki Zoziasi. |
| 11 |
| Zoziasi abotaki Zakoniasi na bandeko na ye; bango babotamaki tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na ekolo ya Babilone. |
| 12 |
| Sima ya komema bato ya Isayele na Babilone; Zekoniasi abotaki Salatiele; mpe Salatiele abotaki Zorobabele; |
| 13 |
| Zorobabele abotaki Abiyudi; Abiyudi abotaki Eliyakimi; mpe Eliyakimi abotaki Azori. |
| 14 |
| Azori abotaki Sadoki; Sadoki abotaki Akimi; mpe Akimi abotaki Eliyudi. |
| 15 |
| Eliyudi abotaki Eleyazari; Eleyazari abotaki Matani; mpe Matani abotaki Zakobi. |
| 16 |
| Zakobi abotaki Zozefi, oyo azalaki mobali ya Mariya, mama ya Yesu oyo babengaka Kristo. |
| 17 |
| Bango nyonso, banda na Abraham kino na David, ezalaki na mabota zomi na minei; banda David kino na tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na Babilone, ezalaki na mabota zomi na minei; mpe kobanda tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu kino na Kristo, ezalaki na mabota zomi na minei. |
| 18 |
| Tala ndenge Yesu Kristo abotamaki: mama na ye Mariya, azalaki elenge mwasi oyo Zozefi andimaki kobala. Kasi liboso ete bavanda esika moko, Mariya azwaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu. |
| 19 |
| Zozefi, mobali na ye, azalaki moto na sembo mpe alingaki te koyokisa ye soni na miso ya bato; yango wana akanaki aboya ye na sekele. |
| 20 |
| Awa azalaki kokanisa mpo na makambo yango, anzelu ya Nkolo abimelaki ye na ndoto, mpe alobaki na ye: —Zozefi mwana ya David, kobanga te mpo na kozwa Mariya mwasi na yo, pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu. |
| 21 |
| Akobota mwana mobali, bongo okopesa ye kombo Yesu, pamba teye moto akobikisa bato na ye na masumu na bango! |
| 22 |
| Nyonso oyo esalamaki mpo ete maloba oyo Nkolo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisama: |
| 23 |
| Boyoka, elenge mwasi oyo ayebi naino mobali te, akozwa zemi. Akobota mwana mobali, mpe bakopesa ye kombo Emanuele; yango elingi koloba: Nzambe azali elongo na biso! |
| 24 |
| Tango Zozefi alamukaki, asalaki ndenge anzelu ya Nkolo atindaki ye, mpe azwaki Mariya mwasi na ye. |
| 25 |
| Kasi Zozefi ayebaki nzoto na ye te kino tango abotaki mwana mobali; mpe apesaki ye kombo Yesu. |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2002/matthew/001.mp3
28
1